« JEHOVAH JIRE »
Jehovah Jiré, na tieli yo kaka motema, nayebi ata ndele oko kokisa oyo olaki.
Jehovah Jiré, elikia na nga ezali na yo, nayebi ya solo oko kokisa oyo yo oloba
Oyo akoma bilaka ya biblia eza yo Nzambe. yonde oloba tokozala moto kasi mokila te.
oyo azali na ba projet de bonheur eza yo Nzambe, po ekokisama na bomoyi ya ba Kristu, kaka yo Nzambe.
Nzambe na nguya pe Nzambe na bolingo eza yo Nzambe. Nzambe na bosembo akosaka te,
kaka yo Nzambe. En toi il n’y a pas d’ombre de changement, eza ya solo. Lokuta eza te na monoko na yo, ata moko te.
Mokonzi na ga atelemaka na suka, papa na ga atelemaka na suka, elombe na ga atelemaka na suka, eyano na ga atelemaka na suka.
Po te apesa solution, po te apesa mabota , po te apesa mabala. yende mosungi ya kokamua.
Po te apesa solution, po te apesa mosala na bato, apesa promotion na bato, apesa voyage na bato. Nzambe na nguya Mokonzi aza moninga malamu, Nzambe ya bolingo.
Po te apesa esengo, apesa bopemi na bato, apesa pe kimia na bato. Nzambe na nguya nioso azali Nzambe ya bolingo, Nzambe malamu.
Otelemaka moto ya suka po bisika toluki biyano pe tolembi, toyeba ete yonde okoki na nioso. Telema po muinda ya esengo epela na bomoi na biso. Telema po ba pasi pe ba soucis ekweya. Ata cancer ekobika, ata sida ekobika, ata problème ya ndenge nini ekozua solution, po oza Nzambe ya bikamua, ya nguya pe ya bosembo. Amen !
Commentaires récents