« MATONDI KOLO »
Matondi kolo pona nioso osaleli nga, matondi mingi pona bolingo na yo.
Na tomboli yo likolo ya oyo nioso ekoki kobengama Nzambe.
Matondi kolo yo molongisi na ngai. Na tango nioso nga se miso epana na yo.
Na moni mosusu te oyo akosala oyo yo okosala na bo Nzambe na yo.
Oyo mokili elobi eza impossible, yo olobi impossible ezali possible. Nakolanda oyo mokili elobi te po liloba ya suka eza nde epana yo. Ata pinzoli ekotanga nga lelo, y’olobi kolo oko frayer un chemin juste esika yango ezalaki pe te, motema na nga ekosandjola pe yo. Pambolama Nzambe yo okosaka jamais. Ata motema pasi kumama na yo. Eloko nini ekolongola na nga masandjoli oyo esengeli na yo.
Butu pe moyi yo okotikala Nzambe, eloko moko te ekobongola yango. Nafandi na mokili na moni pe te esika oyo yo otiki moyengebene. Eyindela nga kolo ozali se Nzambe, eyela nga ba pasi yo obonguani te. Na moni te nini oyo ekosilisa lelo fidélité na yo oyo esilaka te.
Nani akokani na yo ? nani aza lokola yo ? Bolingo na yo monene, bolamu na yo suka te. Nani akosala oyo osaleli nga? Nani akobatela lokola yo Nzambe? Kumama libela, netolama libela, sandjolama kolo, yo ko bolingo mingi. Opesi ngayi pema, opesi nga makasi, opesi na mayele, opesi pe na buania, opesi nzoto malamu, olongoli maladie mosika na ngayi, okimisi kufa.
Commentaires récents