« NZAMBE NA NGUYA »
Na sandjola nani ? na netola nani ? nakumisa nani ? na yembela nani ? soki yo te papa na ngayi na netola nani? soki yo te kolo na bomoi na kumisa nani ? soki yo te kolo ?
Yo wolo po na ngayi, palata na ngayi, libanga na nga ya talo, yonde nioso na nga. Oza nioso ya motuya pona bomoi na ngayi. Soki yo te papa na ngayi na netola nani. Soki yo te kolo na bomoi na kumisa nani.
Nini yango ekoki kopekisa nga na kumisa yo ? Nini yango ekoki kopekisa nga na netola yo ? Nani yango akoki kokakola bo Nzambe na yo ? Nani pe akoki kobeta tembe na bolingo na yo?
Na sandjola nani ? na netola nani ? nakumisa nani ? na yembela nani ? soki yo te papa na ngayi na netola nani? soki yo te kolo na bomoi na kumisa nani ? soki yo te kolo ?
Yo bopemi na nga, yo pe pema na nga. Yo lolendo na nga na betala tolo. Yo elonga na nga, molongisi na nga. Na banzela na nga, yo motambusi na nga. Soki yo te papa na ngayi na netola nani? Soki yo te kolo na bomoi na kumisa nani ?
Nini yango ekoki kopekisa nga na kumisa yo ? Nini yango ekoki kopekisa nga na netola yo ? Nani yango akoki kokakola bo Nzambe na yo ? Nani pe akoki kobeta tembe na bolingo na yo?
Na sandjola nani ? na netola nani ? nakumisa nani ? na yembela nani ? soki yo te papa na ngayi na netola nani? soki yo te kolo na bomoi na kumisa nani ? soki yo te kolo ?
Azali Nzambe na nguya azali Nzambe(x2)
Azali Nzambe na bomoi azali Nzambe (x2)
Nini yango ekoki kosukisa bonzambe na yo? Nini yango ekoki kolekela bo Nzambe na yo ? Nguya nini ekoki kokokana na nguya na yo ? yond’ofongolaki mer rouge na makasi na yo, yokabolaki fleuve jourdain nde na buania na yo, yokangaki moyi pe sanza na mayele na yo.
Esika nini bakozanga kotanga kombo na yo ? Esika nini bakoboya kondima bokonzi na yo ? Esika oyo bakobeta tembe okotalisa ozali Nzambe. Eliya abelelaki Yahwe pe yokitisaki moto, Goliath ayokaki soni se na mwana moke. Makasi ya Nzambe ezalaka na buania na ye.
Kolo tokosami pe eh mingi na simplicité na yo. Ya solo tozipami miso na humilité na yo.
To fongola miso tomona monene na Nzambe. Kanisa bien pe otanga ba exploits ya mokeli.
Bikamua oyo eko sukisa tembe nioso na mokili, eloko oyo epesi elonga na moto kati na mokili, ezali nde kufa na Masiya na ekulusu pona nga moto. Asukisi liwa boye na makasi na ye, atalisi azali Nzambe mokeli na nioso.
Commentaires récents