« YAYA »
Yaya soki oza na nga nazalaka sans crainte. Vraiment soki oza na nga nazalaka kaka assuré, makanisi na nga penza epemaka kaka na yo, nafandaka na kimia oyo mokili ekopesa te. Yaya nga pene na yo nasekaka na esengo. Yaya nga pene na nalalaka lokola bébé. Obatelaka nga yaya na bitumba monguna, okatisaka nga nzela oyo ezalaka plein d’accident.
Yaya simba nga loboko otambusa nga na ndenge na yo. Yaya simba nga loboko obomba nga na maboko na yo. Soki otelemi nde somo, na bonzambe na yo ezali danger. Yaya pemisa mitema opesa nga pe kimia na yo. Yaya pusa nga pene na yo osopela nga esengo na yo. Yaya consoler mitema otondisa nga na esengo na yo.
Yaya soki oza na nga na bitumba na longaka. Yaya soki okoteli nga monguna asengi abandon. Makasi oyo oza na ngo nani yango akopusana. Liboso ya nguya na yo nani yango akotelema. Nkosi na yuda yo Yaya koganga na yo somo. Liloba ya suka eza na yo, oyo olobi ekosalema, maladie ata degré na yango ekosila na mbangu, problème ata monene yango ekozua nde solution.
Ozali mayi na bomoi ya moto oyo azangi lobiko. Okopesa sens na bomoi ya bato po yonde Nzambe na bomoi. Ozali moyi ya tongo na molili ya bomoi ya bato. Ozali elikia ya basantu po yonde eyano na biso.
Commentaires récents