« MOKO TE »
Likolo na se moko te. Moko te akokani na yo. Nzambe moko te akokani na yo. Moko te akokani na yo. Ozali kolo na nioso, na nioso, na nioso. Yonde mokeli na nioso. Ozali Kolo na nioso (x2). Mokonzi moko te akokani na yo, yo Nzambe oyo biso tokumisaka, Nzambe oyo atonda na bolingo. Moko te akokani na yo. Nguya moko te ekokani na yo, yo Nzambe na bomoi oyo asekuisaka, yo oyo okela mokili bobele se na liloba na yo papa. Moko te aza lokola yo
Yo ozali Nzambe (x3) likolo na nioso. Yo ozali mokeli na nioso, nioso ezalisama na yo, yo ozali Nzambe likolo na nioso. Na baniama bakokumisa yo, pela moko nioso okela. Yonde ozali Nzambe likolo na nioso.
Sandjola, sandjola ye pona ekulusu, kuna ye akufeli bato mabe nioso. Nakopambola, nakokumisa mokonzi na bolingo na Nzambe na nga oyo alakisi bolingo na ye pona ngayi. Yende akufela nga, aniokuama pona ngayi moto pamba, mosumuki. Andima kozua esika na nga, abongi na kembo. Sandjola, sandjola ye pona ekulusu, kuna ye akufeli bato mabe nioso.
Il est vivant (x4) Il est vivant alléluia. Nous T’adorons (x4) nous T’adorons alléluia. Alléluia na kolo, alléluia. Alléluia na kolo, alléluia. Alléluia na kolo Yesu eh, Nzamb’oyo, Yesu eh, kolo eh, Yesu eh oza malamu, Yesu eh oza bolingo, Yesu eh zua na yo kembo. Nga na kumisi yo, nga na sandjoli yo, nga na netoli yo, nga napamboli yo. Nzambe na nga oza bolingo eh, oza bolingo. Nzambe na nga oza malamu eh, oza malamu. Yonde Nzambe na bikamua eh, na bikamua. Alléluia na kolo, alléluia. Alléluia na kolo Yesu , Alléluia.
Commentaires récents